30 Mokonzi alobaki : — Telema pembeni mpe zela ngai wana. Boye akendeki mpe atelemaki wana.
Mokonzi atunaki : — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? Ayimaatsi azongisaki : — Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini.
Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu ! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo.