Wana azalaki nanu koloba, Jonatan, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Abiatari, akomaki. Adoniya alobaki na ye : — Kota ! Moto ya lokumu lokola yo amemaka kaka basango ya malamu.
Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, ba-oyo batatolaka kimia, ba-oyo bamemaka basango ya boboto, ba-oyo basakolaka lobiko, ba-oyo balobaka na Siona : « Nzambe na yo azali Mokonzi ! »