Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi : — Oyo ekoya eya ! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi. Kasi Joabi azongisaki : — Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende ? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti.
Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko.