Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 18:22 - Mokanda na Bomoi

22 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi : — Oyo ekoya eya ! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi. Kasi Joabi azongisaki : — Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende ? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 18:22
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi : — Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni. Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu.


Ayimaatsi alobaki : — Oyo ekoya eya ! Nandimi kokima mbangu. Joabi alobaki : — Kima mbangu ! Boye Ayimaatsi akimaki mbangu na nzela ya etando ya Yordani mpe alekaki moto ya Kushi.


Mokonzi atunaki : — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? Ayimaatsi azongisaki : — Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini.


Faraon atunaki ye : — Ozangi eloko nini awa mpo ete oluka kozonga na mokili na yo ? Adadi azongisaki : — Eloko moko te. Kasi tika ngai ete nakende kaka.


Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.


Ezali mpe malamu te mpo na bino kobimisaka maloba ya bozoba, ya bosoto mpe ya maseki, kasi ebongi nde kozongisaka matondi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ