Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 18:20 - Mokanda na Bomoi

20 Joabi alobaki na ye : — Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo ; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 18:20
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi : — Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye.


Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi : — Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni. Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu.


Mokengeli alobaki : — Namoni moto ya liboso kokima mbangu lokola Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki. Mokonzi alobaki : — Azali moto malamu, azali koya na basango malamu.


Mokonzi atunaki : — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? Ayimaatsi azongisaki : — Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini.


Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi.


Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ