2 Samuele 18:2 - Mokanda na Bomoi2 Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko.