19 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi : — Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye.
Mokonzi alobaki lisusu epai ya Nganga-Nzambe Tsadoki : — Ozali momoni makambo te ? Zonga na kimia na engumba elongo na Ayimaatsi, mwana na yo ya mobali, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari. Yo mpe Abiatari, bozwa mpe bomema bana na bino mibale ya mibali.
Bana na bango ya mibali mibale, Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari, bazali mpe kuna elongo na bango. Okotinda bango mpo ete baya koyebisa ngai makambo nyonso oyo okoyoka.
Joabi alobaki na ye : — Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo ; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi.
Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ; otalaka pasi na bango mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo. Banyokolami bamipesaka epai na Yo oyo osungaka bana bitike.
Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.