2 Samuele 18:17 - Mokanda na Bomoi17 Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »
Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi.