2 Samuele 18:12 - Mokanda na Bomoi12 Kasi moto yango azongiselaki Joabi : — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. » အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! »