2 Samuele 18:11 - Mokanda na Bomoi11 Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango : — Boni, omoni ye ? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko ? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi moto yango azongiselaki Joabi : — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. »