Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 18:1 - Mokanda na Bomoi

1 Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 18:1
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moyize alobaki na Jozue : — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai.


Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.


Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi.


Moyize atombokelaki bakonzi oyo baponamaki mpo na kotambolisa mampinga, bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda, oyo bawutaki na bitumba.


Bongo tango bakonzi ya basoda bakosilisa koloba na mampinga, bakopona bakonzi mpo na kokamba mampinga.


Jozue alamukaki na tongo-tongo penza mpe atalaki ndenge nini basoda na ye bamilengelaki. Sima na yango, alekaki liboso elongo na bakambi ya Isalaele mpo na kokende kobundisa engumba Ayi.


Saulo ayebisaki bango : « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino ? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda ?


Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ