5 Kasi Abisalomi alobaki : — Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba.
Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »
Makanisi oyo emonanaki ya sembo na miso ya Abisalomi mpe ya bampaka nyonso ya Isalaele.
Tango Ushayi akomaki epai na ye, Abisalomi alobaki : — Tala toli oyo Ayitofeli apesi. Boni, tosengeli kosala makambo oyo alobi ? Soki te, yebisa biso makanisi na yo.
Atunaki bango : — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? »