2 Samuele 17:25 - Mokanda na Bomoi25 Abisalomi atiaki Amasa mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi. Amasa azalaki mwana mobali ya Yeteri, moto ya Isalaele, oyo abalaki Abigayili, mwana mwasi ya Naashi mpe ndeko mwasi ya Tseruya, mama ya Joabi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye.
Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai ; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele : Abineri, mwana mobali ya Neri ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia ; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye.
Boye, Molimo na Nzambe akitelaki Amasayi, mokonzi ya lisanga ya basoda tuku misato, mpe alobaki : « Oh Davidi, tozali ya yo ! Tozali elongo na yo, oh mwana mobali ya Izayi ! Tika ete kimia ezala na yo, ezala na yo penza ; tika ete kimia ezala na moto oyo azali kosunga yo, pamba te Nzambe na yo azali kosunga yo. » Boye Davidi ayambaki bango mpe akomisaki bango bakonzi ya mampinga na ye.