Tango bakendeki, Ayimaatsi mpe Jonatan babimaki na libulu mpe bakendeki koyebisa mokonzi Davidi : « Botelema mpe bokatisa mayi noki, pamba te Ayitofeli apesi toli moko ya mabe na tina na yo. »
Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.
Oh molimo na ngai, mpo na nini olembi boye ? Mpo na nini ozali komitungisa makasi kati na ngai ? Tia elikya na yo kati na Nzambe, pamba te nakokumisa lisusu lobiko na Ye.