16 Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye : « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. »
Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi : — Boya ! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga.
Solo, wana tozali nanu kati na ndako oyo ya kapo, tozali penza komona pasi mpe konyokwama, pamba te toboyi kobanda nanu na kolongola, kasi tolingi nde kolata mbala moko ndako na biso ya Lola, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.