Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 17:11 - Mokanda na Bomoi

11 Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 17:11
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo.


Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba.


nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.


Sik’oyo, sangisa basoda oyo batikali, bozingela engumba Raba mpe bokamata yango ; soki te nakokamata yango ngai moko, mpe kombo na ngai ekosakolama kuna. »


Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye : — Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango.


ete akolongola bokonzi na ndako ya Saulo mpe akotia kiti ya bokonzi ya Davidi kati na Isalaele mpe kati na Yuda, longwa na Dani kino na Beri-Sheba.


Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.


Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene ; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo.


Bapagano bakweyi na libulu oyo batimolaki, makolo na bango ekangami na mitambo oyo bango moko basalaki.


Babimaki elongo na mampinga na bango nyonso, mpe bato bazalaki ebele lokola zelo ya ebale elongo na motango monene ya bampunda mpe ya bashar.


Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa.


Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.


Bato nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bandimaki ete Samuele azali penza mosakoli ya Yawe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ