Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 17:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo na tango yango, ata soda oyo aleki na mpiko, oyo azali na motema lokola ya nkosi, akobanga makasi, pamba te Isalaele mobimba eyebi ete tata na yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ye bazali basoda ya mpiko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 17:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda, ozali mwana ya nkosi ; mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ?


Na mikolo ya bomoi na bango, Saulo mpe Jonatan balinganaki makasi mpe bapesanaki lokumu ; mpe na kufa na bango, bakabolaki bango te. Bazalaki mbangu koleka bampongo, makasi koleka bankosi.


Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba : « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. »


Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi.


Yawe azali nguba na biso ; Mosantu ya Isalaele azali Mokonzi na biso.


Bakambi ya Edomi bakomi na somo, bankumu ya Moabi bakomi kolenga, bato ya Kanana balembi nzoto.


Moto mabe akimaka ata soki moto moko te abengani ye, kasi bato ya sembo bazalaka na mpiko lokola nkosi.


Tala ! Ezali nde tsipoyi ya mokonzi Salomo ! Basoda na ye ya mpiko, bato ya lokumu ya Isalaele, tuku motoba nde bamemi yango.


Yango wana, maboko nyonso ekolemba mpe mitema ya bato nyonso ekobukana.


Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, azali koya na Ejipito. Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango.


Bapelisi yango mpo na koboma, bangalisi yango mpo na kobimisa mikalikali ! Boni, tosepela kaka na lingenda ya bokonzi ya mwana na ngai ya mobali ? Mopanga ya mwana na ngai esambwisaka banzete nyonso.


Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › »


balongaki nguya ya moto oyo ezalaki kopela makasi mpe babikaki na kufa ya mopanga. Atako bazalaki bato ya bolembu, bakomaki makasi na bitumba mpe bakimisaki mampinga ya basoda ya bapaya.


Moko kati na basali na ye azongisaki : — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye.


Saulo alobaki na Davidi : — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ