Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 16:7 - Mokanda na Bomoi

7 Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe : « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 16:7
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni.


Azalaki kobamba Davidi mpe basali na ye mabanga atako bato nyonso mpe basoda oyo bakengelaka mokonzi bazalaki na ngambo ya loboko ya mwasi mpe na ngambo ya loboko ya mobali ya Davidi.


Pamba te ngai, mosali na yo, nayebi ete nasalaki masumu, mpe lelo nayei awa lokola moto ya liboso kati na libota mobimba ya Jozefi mpo na kokutana na mokonzi, nkolo na ngai. »


Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


Mpe na mokolo wana, basoda nyonso ya Isalaele mpe Isalaele mobimba bandimaki ete mokonzi ayebaki ata likambo moko te na tina na kufa ya Abineri, mwana mobali ya Neri.


Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. »


Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga.


Oh Yawe, banguna na ngai bazali motango boni ! Banguna boni oyo bazali kobundisa ngai !


Bato ya lolendo bakoki te kotelema liboso na Yo. Oyinaka bato nyonso oyo basalaka mabe.


Zongisela ngai esengo ya lobiko na Yo, mpe kabela ngai molimo oyo emibongisi malamu mpo na kolendisaka ngai.


Yoka ngai mpe yanola ngai. Kati na kolela na ngai, nakomi koyengayenga mpe nazangi kimia,


mpo na maloba ya monguna na ngai mpe kanda ya moto mabe, pamba te bazali kokweyisela ngai misala mabe mpe konyokola ngai na kanda.


Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda


Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.


Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ