Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 16:4 - Mokanda na Bomoi

4 Mokonzi alobaki na Tsiba : — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. Tsiba alobaki : — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 16:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Joabi agumbamaki elongi kino na mabele mpo na kopesa mokonzi lokumu mpe apambolaki ye. Joabi alobaki : — Lelo, mosali na yo asosoli ete azwi ngolu na miso na yo mokonzi, nkolo na ngai, pamba te mokonzi andimi kosala makambo oyo mosali na ye asengi.


Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki : — Oh mokonzi, sunga ngai !


Mokonzi alobaki na mwasi : — Zonga na ndako na yo, nakopesa mitindo na tina na yo.


Bongo mokonzi atunaki lisusu : — Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo ? Tsiba azongisaki : — Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki : « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. »


Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe.


Mefibosheti azongisaki : — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki : « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »


Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : — Mefibosheti ! Ye azongisaki : — Ngai oyo, mosali na yo.


Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye : — Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye.


Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo.


Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.


Moto ya liboso na kosamba amonanaka lokola nde alongi ; kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei, akotelemela ye.


Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.


Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ