Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 16:23 - Mokanda na Bomoi

23 Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 16:23
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.


Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »


Ayitofeli alobaki na Abisalomi : — Nakopona mibali nkoto zomi na mibale mpe nakolanda Davidi na pokwa ya lelo.


Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.


Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! Koboya mabe, yango nde mayele ! »


abebisaka mabongisi ya bato oyo bazalaka na mayele mabe, mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ;


Moyi ebimaka wuta na songe moko ya likolo, mpe esukisaka mobembo na yango na songe mosusu ; eloko moko te ezangaka kozwa molunge na yango.


Yoka ngai tango nabondelaka Yo mpo na kosenga lisungi, tango natombolaka maboko na ngai, na kotala na ngambo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule.


Ndenge nzinzi ekufa ekomisaka malasi solo mabe, ndenge wana mpe mwa bozoba ebebisaka bwanya mpe lokumu.


« Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, bayebi kaka kosala mabe, kasi bayebi kosala bolamu te. »


Bato ya bwanya bakoyokisama soni, bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, pamba te batiolaki Liloba na Yawe. Bazali na bwanya ya ndenge nini ?


Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota.


Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !


Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.


Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba.


Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !


Bongo Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ? Yawe azongiselaki ye : — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ