2 Samuele 16:21 - Mokanda na Bomoi21 Ayitofeli azongiselaki Abisalomi : — Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale.
Yonadabi alobaki na ye : — Oh, sala boye : « Kende na mbeto mpe kosana kobela. Tango tata na yo akoya kotala yo, okoloba na ye : ‹ Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kopesa ngai eloko ya kolia. Tika ete alamba biloko na miso na ngai mpo ete namona ye mpe nakoka kolia na loboko na ye. › »
Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.