Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 16:20 - Mokanda na Bomoi

20 Abisalomi alobaki na Ayitofeli : — Pesa biso toli na yo : tosengeli kosala nini ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 16:20
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.


Mpe ngai nakosalela nani ? Ezali te mwana na ye ya mobali ? Ndenge nasalelaki tata na yo, ndenge wana mpe nakosalela yo.


Ayitofeli azongiselaki Abisalomi : — Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama.


Bakonzi ya mokili batomboki, mpe bakambi basangani mpo na kotelemela Yawe elongo na mopakolami na Ye.


Tosengeli kosala keba mpo na bango, mpo ete bakoma lisusu ebele te. Pamba te soki bitumba ekweyi, bakoki kokende na ngambo ya banguna na biso mpe kobundisa biso mpo ete babima na mokili oyo. »


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ; bato oyo basalaka misala na bango na molili mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ? Nani akoyeba ? »


Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !


Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ