Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi : « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi ! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli.
Davidi azongiselaki Akishi : — Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala. Akishi alobaki na Davidi : — Malamu mingi ! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai.
Davidi atunaki Akishi : — Nasali nini ? Eloko nini ya mabe oyo omoni epai ya mosali na yo wuta mokolo oyo nayaki epai na yo kino lelo ? Mpo na nini nakoki te kokende kobundisa banguna ya mokonzi, nkolo na ngai ?