18 Ushayi alobaki na Abisalomi : — Te, ngai nakozala elongo na moto oyo Yawe, bato oyo mpe Isalaele nyonso baponi.
Abisalomi atunaki Ushayi : — Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo ? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo ?
Mpe ngai nakosalela nani ? Ezali te mwana na ye ya mobali ? Ndenge nasalelaki tata na yo, ndenge wana mpe nakosalela yo.
Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.