Mefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te.
Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ? Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya ! Boni, Yawe azali Tata na bino te ? Azali Mokeli na bino te ? Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino.