16 Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye : — Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! Tika ete mokonzi owumela na bomoi !
Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu.
Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi : « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi ! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli.
Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! »
Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi ; Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi ;
Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! »
Bato ya soloka, oyo basalelaka minzoto balobaki na lokota ya bato ya Arami : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi seko na seko ! Yebisa ndoto na yo epai ya basali na yo, mpe tokolimbola yango.
Tango mama ya mokonzi ayokaki basango ya makambo oyo ekomelaki mokonzi mpe bato na ye ya lokumu, akotaki na ndako epai wapi bazalaki kosalela feti ; alobaki : — Oh mokonzi, tika ete owumela na bomoi seko na seko ! Komitungisa te mpe kotika te ete elongi na yo etela !
Tango akomaki pene ya libulu yango, abengaki Daniele na mongongo ya mawa : — Daniele, mosali na Nzambe na bomoi ! Boni, Nzambe na yo, oyo osalelaka na molende, alongi kokangola yo na minoko ya bankosi ?
Boye, bato yango balobaki : — Tokotikala komona likambo ata moko te ya kofundela moto oyo, Daniele ; loba nde toluka yango kati na mobeko ya Nzambe na ye.
Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : « Ozana na Mwana na Davidi ! Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! »
Bongo Samuele alobaki na bato nyonso : — Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. Bato bazongisaki na koganga : — Tika ete mokonzi awumela na bomoi !