Boye, wana Davidi mpe bato na ye bakobaki nzela na bango, Shimei azalaki kotambola na mopanzi mosusu ya ngomba pembeni ya Davidi, azalaki kokoba kolakela Davidi mabe tango azalaki kotambola, kobamba ye mabanga mpe kobwakela ye putulu.
Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe.
Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba ; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko ;
mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia ; pamba te bazalaki kolobana bango na bango : « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. »