Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 16:11 - Mokanda na Bomoi

11 Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 16:11
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na ye : — Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo.


Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.


Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. »


mokonzi alobaki na mosakoli Natan : — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo.


Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri, babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi.


Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga.


Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai ; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo.


Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele.


Mpe lisusu, Ngai moko napesaki bango bikateli ya malamu te mpe mibeko oyo epesaka bomoi te,


Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.


Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ