4 Abisalomi azalaki kobakisa : — Ah ! Soki nazalaki mosambisi kati na mokili oyo, moto nyonso oyo azali na likambo alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kolongisa ye na likambo yango !
Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze.
Komikumisaka te liboso ya mokonzi, mpe komivandisaka te na esika ya bato minene ;
Tika ete moto mosusu akumisa yo, kasi monoko na yo moko te ; tika ete mopaya akumisa yo, kasi bibebu na yo moko te.
Balakaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa mabe ya nzoto, oyo ememaka bango na libebi ; pamba te moto nyonso azali mowumbu ya oyo ekonzaka ye.
Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye : ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »