35 Lokola Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari bakozala kuna elongo na yo, okoyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi.
Wana Jonatan mpe Ayimaatsi bavandaki na Eyini-Rogeli, mwasi mosali moko amemelaki bango sango oyo bango basengelaki kokende koyebisa mokonzi Davidi ; pamba te basengelaki te kokota kati na engumba mpo ete bamona bango te.