33 Davidi alobaki na ye : — Soki okeyi elongo na ngai, okozala mokumba mpo na ngai.
Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi : « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi ! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli.
Kasi Barizilayi azongiselaki mokonzi : — Natikali na mibu boni mpo ete nakende elongo na mokonzi na Yelusalemi ?