Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:31 - Mokanda na Bomoi

31 Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:31
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.


Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli.


Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.


Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Kasi Abisalomi alobaki : — Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba.


Ushayi azongiselaki Abisalomi : — Ya mbala oyo, toli oyo Ayitofeli apesi ezali malamu te.


abebisaka mabongisi ya bato oyo bazalaka na mayele mabe, mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ;


Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba.


Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kokima Abisalomi, mwana na ye.


Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »


Nkolo, bebisa mabongisi ya banguna na ngai mpe kotisa mobulu kati na bango ; pamba te, kati na engumba, nazali komona mobulu mpe bokabwani.


Banguya oyo ebebisaka ezali kosala kati na yango, minyoko mpe lokuta ezali kosila te.


Bato ya Ejipito bakosila mayele, mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ; bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, epai ya milimo ya bakufi, epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya.


Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.


Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »


Wapi moto ya bwanya ? Wapi molakisi ya Mobeko ? Wapi moto ya mayele ya tango oyo ? Boni, Nzambe akomisa te bwanya ya mokili liboma ?


Bwanya ya ndenge wana ewutaka na Likolo te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto, ya Satana.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ