Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:24 - Mokanda na Bomoi

24 Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:24
23 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi alobaki lisusu epai ya Nganga-Nzambe Tsadoki : — Ozali momoni makambo te ? Zonga na kimia na engumba elongo na Ayimaatsi, mwana na yo ya mobali, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari. Yo mpe Abiatari, bozwa mpe bomema bana na bino mibale ya mibali.


Lokola Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari bakozala kuna elongo na yo, okoyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi.


Sheva azalaki mokomi mikanda ; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe ;


Tango bato oyo bazalaki komema Sanduku ya Yawe batindikaki makolo na bango mbala motoba, batelemaki, mpe Davidi abonzaki lokola mbeka ngombe moko ya mobali mpe mwana ngombe moko ya mafuta.


Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ;


Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya.


Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari : — Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso.


Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari.


Davidi alobaki : « Moto moko te, longola kaka Balevi, akoki komema Sanduku ya Boyokani ya Nzambe, pamba te Yawe aponaki bango mpo na komema Sanduku na Ye mpe kosala mosala na Ye mpo na libela. »


Eteni yango ya mabele ekozala mpo na Banganga-Nzambe oyo babulisama, oyo bazali bakitani ya Tsadoki, mpo ete basalelaki Ngai na boyengebene mpe bapengwaki te na nzela na Ngai tango bana ya Isalaele bapengwaki ndenge mpe Balevi basalaki.


Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.


Apesaki eloko te epai ya bana mibali ya Keati, pamba te bazalaki na mokumba ya komema na mapeka na bango biloko ya bule.


mpo na kopesa bato mitindo oyo : — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango.


Jozue alobaki na Banganga-Nzambe : — Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato. Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato.


Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo.


Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango : — Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe.


Kaka Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki mpe koko ya Ayitubi, nde abikaki mpe akimaki mpo na kokende kosangana na Davidi.


Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ