Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron.
Banganga-Nzambe bakotaki kati na Tempelo ya Yawe mpo na kopetola yango : babwakaki kati na lopango ya Tempelo ya Yawe biloko nyonso ya mbindo oyo bamonaki kati na yango. Balevi balokotaki mpe bamemaki yango kino na lubwaku ya Sedron.
Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »
Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki : « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike ! › »
Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele.
Sima na Yesu kobondela, akendeki elongo na bayekoli na Ye mpe bakatisaki lubwaku ya Sedron epai wapi elanga moko ezalaki. Yesu akotaki na elanga yango elongo na bayekoli na Ye.