22 Davidi alobaki na Itayi : — Malamu ! Leka liboso mpe tambola ! Boye Itayi, moto ya Gati, atambolaki liboso elongo na basoda nyonso mpe mabota oyo ezalaki elongo na ye.
Itayi azongiselaki mokonzi : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.
Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe.