Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:21 - Mokanda na Bomoi

21 Itayi azongiselaki mokonzi : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:21
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi alobaki na Itayi : — Malamu ! Leka liboso mpe tambola ! Boye Itayi, moto ya Gati, atambolaki liboso elongo na basoda nyonso mpe mabota oyo ezalaki elongo na ye.


Eliya alobaki na Elize : — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Beteli.


Eliya alobaki na Elize : — Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bakendeki na Jeriko.


Eliya alobaki na ye : — Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani. Elize azongisaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! Boye bango mibale bakobaki nzela na bango.


Kasi mama ya mwana alobaki : — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te. Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami.


Molingami alingaka tango nyonso, mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.


Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.


Tango akomaki kuna mpe amonaki ndenge nini Nzambe apambolaki bango, asepelaki makasi mpe alendisaki bango nyonso ete bakangama makasi na Nkolo, na mitema na bango mobimba.


Kasi Polo azongiselaki biso : — Mpo na nini bozali kolela mpe kolembisa ngai ? Nasili komibongisa kaka te mpo na kokangama, kasi mpe mpo na kokufa kati na Yelusalemi mpo na Kombo ya Nkolo Yesu.


Nalobi bongo te mpo ete bosalaki ngai mabe. Nasilaki koyebisa bino ete bozali na esika ya motuya kati na mitema na biso, ezala mpo na kokufa to mpo na kozala na bomoi elongo na bino.


Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »


Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ