Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:20 - Mokanda na Bomoi

20 Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:20
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi : « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye !


Tika ete Yawe atalisa bino sik’oyo bolamu mpe boyengebene ! Lokola bosalaki bongo, ngai mpe nakotalisa bino bolamu yango kaka.


Banzela nyonso ya Yawe etalisaka bolingo mpe boyengebene na Ye mpo na bato oyo babatelaka boyokani mpe malako na Ye.


Mpo na makambo oyo ya mabe, boni, bazanga etumbu ? Oh Nzambe, kweyisela bikolo kanda na Yo !


Nazali koganga epai ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, epai ya Nzambe oyo asalelaka ngai bolamu.


Bazongaka na pokwa, bagangaka lokola bambwa mpe batambolaka zingazinga ya engumba.


Pesa na mokonzi na biso bomoi molayi ; tika ete awumela na bomoi.


Tika ete awumela na bokonzi libela na libela liboso ya Nzambe ! Bolingo mpe boyengebene na Yo ekobatela ye.


Solo, lobiko na Ye ezali pene ya bato oyo batosaka Ye mpo ete nkembo na Ye ewumela kati na mboka na biso.


Loboko na Yo ezali na makasi, loboko na Yo ezali na nguya, loboko na Yo ya mobali oyo otombola.


Boni, bato oyo babongisaka kosala mabe bazali na libunga te ? Kasi boboto mpe solo ezali epai ya bato oyo babongisaka kosala bolamu.


Tika ete bolamu mpe bosolo ekabwana na yo te, linga yango zingazinga na kingo na yo, mpe koma yango na etando ya motema na yo !


Bato bakotelengana na bibale nyonso, bakoyengayenga longwa na nor kino na este mpo na koluka Liloba na Yawe, kasi bakotikala komona yango te.


pamba te Mibeko eyaki na nzela ya Moyize, kasi ngolu mpe solo eyaki na nzela ya Yesu-Klisto.


Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ