Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:2 - Mokanda na Bomoi

2 Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye : — Ozali moto ya engumba nini ? Soki moto yango azongisi : — Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:2
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango :


Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. »


Bazongiselaki ye : — Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo.


Mobomi azali kotelema na moyi mpe koboma mobola elongo na moto akelela ; na butu, azali lokola moyibi.


Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki : — Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato ? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi ? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa ?


Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe.


Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo ; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize.


Pamba te balalaka pongi te soki basali nanu moto mabe te, mpe pongi ekimaka bango soki babomi moto te ;


Moto moko azanga ata tina mpe batikala kopesa ata lokumu ya bokonzi te akokitana na ye ; akoya na tango ya kimia mpe akozwa bokonzi na nzela ya mayele mabe.


Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye.


Soki makambo oyo eleki yo makasi mpo na kosambisa ekomi na bisambiselo na yo, makambo lokola koboma bato, kowelana, kozokisa bato, mema yango na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona.


Wana Boazi akendeki na ekuke ya engumba mpe avandaki kuna, amonaki mosikoli, oyo Boazi alobaki ete ye nde azali na ndingisa ya kosikola Rite, azali koleka. Boazi alobaki na ye : « Ndeko na ngai ya mobali, yaka nanu mpe vanda awa. » Moto yango apusanaki mpe avandaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ