Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:18 - Mokanda na Bomoi

18 Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:18
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye mokonzi akendeki na makolo elongo na bato na ye nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpe batelemaki pene ya ndako ya suka ya engumba.


Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango.


Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele ; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti.


Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri.


Boye, Davidi aboyaki komema Sanduku ya Yawe epai na ye, kati na engumba ya Davidi ; akendeki kotia yango kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe.


Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni.


Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki bakalaka ya liboso pembeni ya mokonzi.


Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te.


Davidi alobaki na basoda na ye : « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. » Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko.


Davidi mpe bato na ye bavandaki na Gati epai ya Akishi : mobali nyonso azalaki na libota na ye, mpe Davidi azalaki na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli, mpe Abigayili oyo azalaki liboso mwasi ya Nabali, moto ya Karimeli.


Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye.


Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango.


Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi.


Davidi akendeki elongo na basoda na ye, nkama motoba. Bakomaki na moluka ya lubwaku ya Besori epai wapi ba-oyo bazalaki kotikala na sima batelemaki ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ