Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:12 - Mokanda na Bomoi

12 Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:12
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »


Kaka na tango yango, Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na Yelusalemi, mpe Ayitofeli azalaki elongo na ye.


Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.


Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye.


Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ; Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ;


Babongisaki mokolo ya kokila bilei mpe bavandisaki Naboti na esika ya liboso kati na bato.


Tala makambo oyo akomaki na mikanda yango : « Bobongisa mokolo moko ya kokila bilei mpe bobengisa bato na mayangani epai wapi bokotia Naboti na esika ya liboso.


Ayitofeli azalaki mopesi toli ya mokonzi ; mpe Ushayi, moto ya Ariki, azalaki mobateli sekele ya mokonzi.


Ezala molingami na ngai ya kimia, oyo nazalaki kotiela motema mpe azalaki kolia sani moko elongo na ngai, abalukeli ngai.


Balobaka : « Pasi moko ya somo penza ekangi ye, ebwaki ye na mbeto mpe azali kokoka lisusu kotelema te. »


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele na miso ya Yawe, kasi libondeli ya moto ya sembo esepelisaka Ye.


Mbeka ya moto mabe ezalaka nkele ; ezalaka nkele koleka soki amemi yango na makanisi mabe.


Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba to na matiti ya solo kitoko oyo ewuti na mboka ya mosika ? Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, mpe nandimaka makabo na bino te. »


Balami alobaki na Balaki : « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. »


Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko.


Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe abonzaki ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali na etumbelo moko na moko.


Nazali koloba bongo te na tina na bino nyonso ; nayebi bato oyo napona. Kasi esengeli ete eteni oyo ya Makomi ekokisama : « Moto oyo azalaki kolia sani moko elongo na ngai abalukeli ngai ! »


Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.


Gosheni, Oloni mpe Gilo : bingumba nyonso ezalaki zomi na moko elongo na bamboka na yango ya mike-mike.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ