Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:10 - Mokanda na Bomoi

10 Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba : « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba : ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:10
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.


Abisalomi alobaki na basali na ye : « Botala ! Elanga ya Joabi ezali pembeni ya elanga na ngai, ezali na bambuma ya orje. Bokende kotia yango moto. » Basali ya Abisalomi batiaki yango moto.


Mokonzi alobaki na ye : — Kende na kimia. Boye akendeki na Ebron.


Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba : « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi ;


Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? Yawe azongisaki : — Okoki na yo kokende. Davidi atunaki lisusu : — Nakende wapi ? Yawe azongisaki : — Kende na Ebron.


Davidi asalaki mibu sambo na sanza motoba na Ebron lokola mokonzi ya libota ya Yuda.


mibu sambo na basanza motoba lokola mokonzi ya Yuda, na Ebron ; mpe mibu tuku misato na misato lokola mokonzi ya Isalaele mobimba mpe Yuda, na Yelusalemi.


Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo : — Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi ; kasi mokonzi Davidi ayebi te ?


Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! »


Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! »


Tango bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi, Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, kolanda Liloba na Yawe na nzela ya Samuele.


Mokolo na mokolo, bato bazalaki koya kosunga Davidi kino mampinga na ye ekomaki monene makasi lokola mampinga ya Nzambe.


kati na mabota oyo ezalaki na este ya Yordani : libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ndambo ya libota ya Manase, basoda nkoto nkama moko na tuku mibale elongo na bibundeli nyonso ya bitumba.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ