Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 15:1 - Mokanda na Bomoi

1 Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 15:1
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakoyeisa pasi epai na yo wuta na ndako na yo moko ; na miso na yo, nakokamata basi na yo mpe nakopesa bango na moko kati na baninga na yo, oyo akosangisa na bango nzoto na moyi makasi.


mokonzi alobaki na bango : — Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni !


Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! » Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli.


Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.


Tango lolendo eyaka, soni mpe eyaka, kasi bwanya ezali elongo na bato oyo bamikitisaka.


Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.


Moto oyo alingaka koswana alingaka masumu ; moto oyo atongaka ekuke na ye na likolo amilukelaka kokweya.


Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »


Alobaki na bango : — Tala makambo oyo mokonzi oyo akokonza bino akobanda kosala : Akozwa bana na bino ya mibali mpe akotia bango na mosala ya kokumba bashar na ye kati na basoda na ye oyo babundaka na bampunda ; bakobanda kokima mbangu liboso ya shar na ye lokola bakengeli ya mokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ