Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:7 - Mokanda na Bomoi

7 Sik’oyo, libota mobimba etelemeli mwasi mosali na yo, bazali koloba : « Kaba na maboko na biso ye oyo abetaki ndeko na ye ya mobali mpo ete toboma ye mpo na bomoi ya ndeko na ye ya mobali oyo ye abomaki. Na nzela wana, tokolongola mokitani ya libula. » Na bongo, bakoki koboma mwa likala ya moto oyo natikali na yango mpe kozangisa mobali na ngai kombo mpe bakitani kati na mokili.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:7
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › »


Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.


Bakambi ya ndako na ye bayaki kotelema pembeni na ye mpo na kotelemisa ye wuta na mabele, kasi aboyaki mpe andimaki te kolia bilei elongo na bango.


Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.


Mokonzi alobaki na mwasi : — Zonga na ndako na yo, nakopesa mitindo na tina na yo.


Ezali mobukanisi makila nde akoboma mobomi : akoboma ye tango kaka akokutana na ye.


Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »


Mwana mobali ya liboso oyo mwasi yango akobota akozwa kombo ya ndeko mobali oyo akufa mpo ete kombo na ye ebunga te kati na Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ