Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:6 - Mokanda na Bomoi

6 Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:6
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.


Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko.


Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki.


Mokonzi atunaki ye : — Eloko nini ezali kotungisa yo ? Azongisaki : — Nazali mwasi akufisa mobali ; mobali na ngai akufaki.


Sik’oyo, libota mobimba etelemeli mwasi mosali na yo, bazali koloba : « Kaba na maboko na biso ye oyo abetaki ndeko na ye ya mobali mpo ete toboma ye mpo na bomoi ya ndeko na ye ya mobali oyo ye abomaki. Na nzela wana, tokolongola mokitani ya libula. » Na bongo, bakoki koboma mwa likala ya moto oyo natikali na yango mpe kozangisa mobali na ngai kombo mpe bakitani kati na mokili.


Mokolo oyo elandaki, Moyize abimaki mpe amonaki Ba-Ebre mibale bazali kobunda. Atunaki na moto oyo asalaki mabe : — Mpo na nini ozali kobeta moninga na yo ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ