Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi.
Bongo Joabi agumbamaki elongi kino na mabele mpo na kopesa mokonzi lokumu mpe apambolaki ye. Joabi alobaki : — Lelo, mosali na yo asosoli ete azwi ngolu na miso na yo mokonzi, nkolo na ngai, pamba te mokonzi andimi kosala makambo oyo mosali na ye asengi.
Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.