Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:33 - Mokanda na Bomoi

33 Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:33
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye : — Mwana na ngai, yaka awa mpe pesa ngai beze.


Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela.


Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki.


Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze.


Mokonzi azongisaki : — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.


Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye : — Zonga na ndako na yo.


Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ