30 Abisalomi alobaki na basali na ye : « Botala ! Elanga ya Joabi ezali pembeni ya elanga na ngai, ezali na bambuma ya orje. Bokende kotia yango moto. » Basali ya Abisalomi batiaki yango moto.
Bongo Abisalomi abengisaki Joabi mpo ete atinda ye epai ya mokonzi, kasi Joabi aboyaki kokende epai na ye. Abengisaki lisusu Joabi na mbala ya mibale, kasi Joabi aboyaki kaka kokende.
Joabi alobaki : — Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo. Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente.
Jewu apesaki bango mitindo : — Bobwaka ye na se. Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye.