Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:3 - Mokanda na Bomoi

3 mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:3
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokonzi atunaki : — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? Mwasi azongisaki : — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo.


Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki : — Oh mokonzi, sunga ngai !


Natindaki bango epai ya Ido, mokambi ya mboka Kasifia ; nayebisaki bango makambo oyo basengeli koloba na Ido mpe bandeko na ye ya mosala, basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na Kasifia, mpo ete bamemela biso basali mpo na Ndako ya Nzambe na biso.


Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala.


Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ; nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, oyo atongaki miboko ya mabele mpe oyo alobaki na Siona : ‹ Bozali bato na Ngai ! › »


« Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe.


Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo.


Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo.


Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ