Kasi mokonzi alobaki : — Asengeli kokende na ndako na ye ; asengeli te komona elongi na ngai. Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te.
Bongo Abisalomi abengisaki Joabi mpo ete atinda ye epai ya mokonzi, kasi Joabi aboyaki kokende epai na ye. Abengisaki lisusu Joabi na mbala ya mibale, kasi Joabi aboyaki kaka kokende.
Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye : — Zonga na ndako na yo.
Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo. [