Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




2 Samuele 14:26 - Mokanda na Bomoi

26 Na suka ya mibu nyonso, azalaki kokata suki ya moto na ye, mpo ete ezalaki kokoma kilo makasi. Boye tango bazalaki kotia yango na bimekelo, ezalaki na bakilo mibale na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na ndako ya mokonzi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




2 Samuele 14:26
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana.


Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu.


Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ; na esika ya mokaba, ekozela nde singa ; na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ; na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ; na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe.


Banganga-Nzambe bakoki te kokokola suki ya mito na bango to kokolisa makasi suki na bango ; kasi basengeli kokata suki na bango malamu.


Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito.


Boni, mokili yango moko eteyaka bino te ete ezali soni mpo na mobali kozala na suki milayi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ